Mitango 15:24 - Mokanda na Bomoi24 mpe soki mbeba yango esalemi na nko te mpe lisanga esosoli yango te, lisanga mobimba ekobonza mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, elongo na likabo ya gato mpe likabo ya masanga ndenge ekatama, mpe ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato oyo bakendeki na bowumbu bazongaki wuta na bowumbu mpe babonzaki mpo na Isalaele mobimba lokola mbeka ya kotumba epai ya Nzambe ya Isalaele : bangombe ya mibali zomi na mibale, bameme ya mibali tuku libwa na motoba, bana meme tuku sambo na sambo, mpe bantaba zomi na mibale lokola mbeka ya masumu. Babonzaki nyonso lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe.
« Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani.
Bongo, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, akomema epai ya Nganga-Nzambe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mabe oyo moto wana asalaki na kozanga koyeba ; boye moto yango akolimbisama.