Mitango 15:15 - Mokanda na Bomoi15 Mibeko ya kosalela ekozala ndenge moko mpo na lisanga mobimba, ezala bino to mopaya oyo akowumela kati na bino. Yango ekozala mobeko ya libela ezala mpo na milongo oyo ekoya. Bino na mopaya bozali ndenge moko liboso ya Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato nyonso ya Isalaele elongo na bakambi na bango, bakomi mibeko mpe basambisi na bango, batelemaki ngambo na ngambo ya Sanduku ya Boyokani, liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bamemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Mopaya elongo na mwana mboka ya Isalaele bazalaki wana. Ndambo ezalaki liboso ya ngomba Garizimi, mpe ndambo mosusu, liboso ya ngomba Ebali, kolanda mitindo oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki mpo na kopambola bana ya Isalaele.