12 Bokosala bongo mpo na nyama moko na moko, ezala soki motango na yango ezali boni.
Ezali ndenge wana nde esengeli kobongisa mbeka nyonso ya ngombe ya mobali to ya meme ya mobali to ya bana meme to mpe ya mwana ntaba.
Mwana mboka asengeli kosala bongo mpo na makabo wana tango akomema likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.