10 Bokomema lisusu balitele minei ya vino lokola likabo ya masanga : ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
Ezali ndenge wana nde esengeli kobongisa mbeka nyonso ya ngombe ya mobali to ya meme ya mobali to ya bana meme to mpe ya mwana ntaba.
Mpo na bana meme moko na moko ya mbeka ya kotumba, bosengeli kobakisa balitele ya vino lokola likabo ya masanga.
bokomema elongo na mwana ngombe, likabo ya gato, bakilo libwa ya farine basangisa na balitele minei ya mafuta.
kitunga ya mapa ezanga levire mpe basala na farine basangisa na mafuta ; bagalete ezanga levire mpe bapakola mafuta elongo na mbeka ya masanga mpe makabo mosusu.
Sima na ye kokata mwana komela mabele, Ana akamataki ye, ndenge kaka azalaki nanu moke bongo ; amemaki ye na Ndako ya Yawe, na Silo, elongo na ngombe ya mobali ya mibu misato, bakilo zomi ya farine, mpe mbeki moko ya vino.