Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 14:8 - Mokanda na Bomoi

8 Soki tozwi ngolu na miso ya Yawe, akokamba biso kino na mokili yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpe akopesa biso yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 14:8
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.


Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti ya bokonzi ya Isalaele ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. »


liboso ete naya kozwa bino mpo na komema bino na mokili oyo ekokana na oyo ya bino, mokili oyo etonda na ble mpe na vino ya sika, mokili ya mapa mpe ya bilanga ya vino, mokili ya banzete ya olive mpe ya mafuta ya nzoyi. Boye, bokozala na bomoi, bokokufa te ! Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba : ‹ Yawe akokangola biso. ›


Bato nyonso oyo bazali komona ngai bazali koseka ngai, bazali kokamwa, koningisa mito mpe koloba :


Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.


Nakosepela kosalela bango bolamu mpe nakolona bango penza kati na mokili oyo, na motema mpe na molimo na Ngai mobimba. ›


Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo, azali Elombe Mobikisi. Akosepela na yo makasi mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ; akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›


Bapesaki sango oyo epai ya Moyize : « Tokotaki kino na mokili epai wapi otindaki biso. Solo, ezali penza mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi ; tala kutu bambuma ya mokili yango.


Te, okotisi biso kutu te na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi to opesi biso ata libula moko te ya bilanga to ya bilanga ya vino. Boni, okanisi ete bato oyo bakufa miso ? Te, tokoya te !


Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?


Nzokande, Yawe alakisaki bolingo na Ye epai ya batata na bino mpe alingaki bango. Yango wana aponaki bino, bino bakitani na bango, kati na bikolo nyonso ndenge ezali lelo.


Pesa ngai mokili ya bangomba wana oyo Yawe alakaki ngai na mokolo wana. Mokolo wana, yo moko oyokaki ete bato ya Anaki bazalaki kovanda kuna mpe bingumba na bango ezalaki minene mpe batonga makasi. Kasi na lisungi na Yawe, nakobengana bango ndenge Yawe alobaki. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ