Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 14:44 - Mokanda na Bomoi

44 Na lolendo na bango, bakendeki kaka na songe ya ngomba kati na etuka ya bangomba ; kasi Moyize alongwaki te na molako, ndenge moko mpe mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 14:44
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.


Bato ya Amaleki mpe ya Kanana bakokutana na bino kuna. Bongo lokola bopesaki Yawe mokongo, bokokweya na mopanga mpo ete akozala elongo na bino te.


Kasi moto nyonso oyo akosala lisumu na nko, azala mwana mboka to mopaya, atioli nde Yawe ; mpe moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati ya bato na ye.


Moyize atindaki bango na etumba bato nkoto moko ya libota moko na moko elongo na Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari oyo amemaki bisalelo ya Esika ya bule mpe bakelelo mpo na kopesa mbela.


Nzokande nayebisaki bino, kasi boyokaki kaka te ; botombokelaki mitindo ya Yawe ; mpe, na lolendo na bino, bomataki na etuka ya bangomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ