41 Kasi Moyize alobaki : — Mpo na nini bozali koboya kotosa mitindo ya Yawe ? Likambo oyo ekolonga te !
Molimo ya Nzambe akitelaki Zakari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada, mpe Zakari atelemaki liboso ya bato mpe alobaki : « Tala makambo oyo Nzambe alobi : ‹ Mpo na nini bozali kotosa mitindo ya Yawe te ? Bokokende liboso te ! Lokola bosundoli Yawe, Ye mpe asundoli bino. › »
bakufaka na mopepe ya Nzambe mpe basilaka na mopepe ya kanda na Ye.
Okotika lisusu esika yango, maboko na moto, pamba te Yawe asundoli bato oyo ozalaki kotiela motema ; mpe bango bakosunga yo te. »
akomema Sedesiasi na Babiloni, akowumela kuna kino tango nakotala likambo na ye, elobi Yawe, soki bomeki kobundisa bato ya Babiloni, bokolonga te. › »
Lokola bato ya Amaleki mpe ya Kanana bazali nanu kovanda na lubwaku, bino bokobaluka mpe bokozonga lobi na tongo na esobe, na nzela oyo ekenda na ebale monene ya Barozo.
Kasi Yawe alobaki na ngai : « Yebisa bango ete bamata te mpe babunda te, pamba te nakozala elongo na bango te ; banguna na bango bakolonga bango. »
Mpo na nini otosaki Yawe te ? Mpo na nini owelaki kozwa bomengo ya bitumba, mpe osalaki mabe na miso ya Yawe ?