Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 14:37 - Mokanda na Bomoi

37 bato oyo babimisaki maloba mabe na tina na mokili yango, bazwaki etumbu mpe bakufaki liboso ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 14:37
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezala bato nkoto moko bakweyi pembeni na yo, mpe bato nkoto zomi, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, ekozwa yo ata moke te.


tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, nakopesa Shemaya, moto ya Nekelami, etumbu elongo na bakitani na ye. Kati na bato na ye, moko te akotikala, mpe akotikala komona te bolamu oyo nakosala epai ya bato na Ngai, elobi Yawe, pamba te atindiki bato na Ngai kotombokela Ngai. › »


Boye moto ebimaki longwa liboso ya Yawe mpe etumbaki bango nyonso ; bakufaki na mbala moko.


Bongo bakomaki kopanza sango mabe kati na bana ya Isalaele na tina na mboka oyo banongaki, bazalaki koloba : « Mokili oyo tonongaki ezali penza mabele oyo eliaka bavandi na yango ; bongo bato nyonso oyo tomonaki kuna bazali bingambe.


Nakokweyisa bango na nzela ya etumbu ya bokono oyo ebomaka mpo na kobebisa bango. Kasi yo, nakokomisa yo ekolo moko monene mpe ya nguya koleka bango.


Kati na bato oyo bakendeki kononga mokili, kaka Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, nde babikaki.


Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.


Baswanisaki Moyize mpe balobaki : « Elingaki kozala malamu soki tokufaki na biso tango bandeko na biso bakufaki liboso ya Yawe !


Ane emonaki Ngai mpe ekimaki Ngai mbala misato. Soki ekimaki Ngai te, solo penza, nalingaki koboma yo, kasi nalingaki kotika yango na bomoi.


Bato oyo bakufaki na etumbu wana bazalaki, bato nkoto tuku mibale na minei.


Boyimaka-yimaka te ndenge bamosusu kati na bango bayimaki-yimaki, mpe anjelu mobebisi abomaki bango.


Nzokande, Nzambe asepelaki te na mingi kati na bango ; solo, babomaki bango kati na esobe.


Asilikelaki banani mibu tuku minei ? Ezali te bato oyo basalaki masumu, oyo bibembe na bango ekweyaki kati na esobe ?


Epai ya banani Nzambe akataki seleka ete bakokota te kati na bopemi na Ye ? Ezali te epai ya bato oyo baboyaki kotosa Ye ?


Atako boyebi malamu makambo oyo nyonso, kasi nalingi kaka koyebisa bino lisusu ete Nkolo akangolaki bato na Ye na bowumbu kati na Ejipito, kasi, sima na yango, abomaki ba-oyo bazalaki na kondima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ