Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 14:35 - Mokanda na Bomoi

35 Ngai Yawe nde nalobi ; mpe nakosala solo makambo oyo epai ya lisanga oyo mobimba ya batomboki oyo basanganaki mpo na kotelemela Ngai. Bakomona suka na bango kati na esobe oyo ; ezali awa nde bakokufa. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 14:35
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, asukisaki mikolo ya bomoi na bango lokola mopepe, mpe mibu na bango ya mbotama kati na somo.


Bosala keba na miso na ye mpe boyoka makambo oyo akoloba ; botombokela ye te mpo ete akolimbisa botomboki na bino te, pamba te Kombo na Ngai ezali kati na ye.


Nakopesa bino etumbu ndenge napesaki batata na bino etumbu na esobe ya mokili ya Ejipito, elobi Nkolo Yawe.


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.


Makambo wana nyonso ekweyelaki bango mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe ekomamaki mpo na kokebisa biso oyo tokomi na tango ya suka.


Nzokande, Nzambe asepelaki te na mingi kati na bango ; solo, babomaki bango kati na esobe.


Boye, tomoni ete balongaki te kokota mpo ete bazangaki kondima.


Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe mibu tuku minei, kino tango ekeke mobimba ya mibali oyo bakokisaki mibu ya kobunda bitumba tango babimaki na Ejipito basilaki kokufa. Mpo ete batosaki Yawe te, Yawe alapaki ndayi ete bakomona te mokili oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ