Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 14:34 - Mokanda na Bomoi

34 Lokola bosalaki mikolo tuku minei mpo na kononga mokili, bokomona pasi mibu tuku minei mpo na masumu na bino : mobu moko mpo na mokolo moko. Na bongo bokoyeba mbano oyo ezali kati na likambo ya kotelemela Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 14:34
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.


Ezalaki ndenge wana nde Liloba na Yawe ekokisamaki, liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : « Mokili ekozwa bopemi na mikolo nyonso oyo bakosundola yango, ekosepela na basaba na yango kino tango mibu tuku sambo ekokoka. »


Mpo ete akanisaki elaka ya bule oyo apesaki mosali na Ye, Abrayami,


Mpo na kanda na Yo, nzoto na ngai ebeli ; mpo na masumu na ngai, mikuwa na ngai elembi.


« Boni, Nkolo akobwaka biso penza mpo na libela ? Akosalela biso lisusu bolamu te ?


Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki : ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. ›


Bango mibale, mosakoli yango mpe moto oyo akei kotuna ye toli, bakomema mikumba ya masumu na bango.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola obosanaki Ngai mpe otiaki Ngai na sima ya mokongo na yo, okomema mikumba ya ekobo mpe ya kindumba na yo. »


Ngai moko nakokatela yo motango ya mikolo, oyo ekokokana na motango ya mibu oyo libota ya Isalaele asali masumu : mikolo nkama misato na tuku libwa ; mpe okomema solo masumu ya libota ya Isalaele na mikolo oyo.


Sima na yo kosilisa mikolo yango, lala lisusu na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe mema lisusu masumu ya libota ya Yuda. Nakateli yo mikolo tuku minei : mokolo moko mpo na mobu moko na moko.


Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu.


Ezala soki babokoli bana, nakobotola bango liboso ete bakola. Solo, mawa na bango tango nakopesa bango mokongo !


Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata to ya mama na yo, pamba te ekosambwisa bondeko. Soki moto asali yango, bango mibale bakomema ngambo mpo na mabe na bango.


Nakamataki lingenda oyo nabengaki Ngolu, nabukaki yango mpo na kotalisa ete boyokani oyo nasalaki elongo na bikolo nyonso esili.


Sima na mikolo tuku minei, bazongaki wuta na mokili oyo banongaki.


Ezali Balevi nde bazali na mokumba ya kosala mosala na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe ya komema mokumba ya bambeba na bango na kati na yango. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na bileko oyo ekoya ya sima. Bakozwa libula moko te elongo na bana ya Isalaele.


Yawe atombokelaki Isalaele mpe asalaki ete bayengayenga na esobe mibu tuku minei kino tango molongo nyonso ya bato oyo basalaki mabe na miso na Ye basilaki kokufa.


Mibu tuku minei mobimba, ayikelaki bango mpiko kati na esobe ;


Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino na misala nyonso ya maboko na bino. Abateli bino na esobe oyo ya monene mibu tuku minei. Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino mpe bozangi eloko moko te. › »


Yango wana, lokola elaka ya kokota kati na bopemi ya Nzambe ezali nanu, tosala keba ete moko kati na bino akanisa ete azangeli.


Sik’oyo tala, eleki mibu tuku minei na mitano oyo Yawe abateli ngai na bomoi, wuta tango alobaki liloba oyo epai ya Moyize tango bana ya Isalaele bazalaki kotambola na esobe. Boye, ndenge nazali awa lelo, nakokisi mibu tuku mwambe na mitano ya mbotama,


Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »


Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ