Mitango 14:33 - Mokanda na Bomoi33 Bana na bino bakokoma babateli bibwele awa na esobe mibu tuku minei. Lokola botamboli na bosembo te na miso na Ngai, bakomona pasi kino ebembe na bino ya suka elala na esobe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe mibu tuku minei, kino tango ekeke mobimba ya mibali oyo bakokisaki mibu ya kobunda bitumba tango babimaki na Ejipito basilaki kokufa. Mpo ete batosaki Yawe te, Yawe alapaki ndayi ete bakomona te mokili oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.