Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 14:27 - Mokanda na Bomoi

27 — Kino penza tango nini lisanga oyo ya batomboki ekokoba kotelemela Ngai ? Solo, nayoki bileli mpe koyimayima ya bana ya Isalaele na tina na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 14:27
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. »


Boye Yawe alobaki na Moyize : — Kino tango nini bokoboya kobatela mibeko mpe malako na Ngai ?


Boye lobi na tongo, bokomona nkembo na Yawe ; pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Mpo na yango, biso tozali banani mpo ete boyimayima epai na biso ?


Boye Moyize alobaki na Aron : — Yebisa lisanga nyonso ya bana ya Isalaele ete bapusana pene ya Yawe mpo ete ayoki koyimayima na bango.


Botelemelaki Ngai mpe bolobaki na Ngai na maloba ya lolendo ; nayokaki yango Ngai moko.


Mokolo moko, bana ya Isalaele bakomaki kolelalela na tina na pasi na bango. Boye, kolelalela yango ekomaki kino na matoyi ya Yawe. Tango ayokaki yango, kanda na Ye emataki makasi mpe moto kowuta epai na Yawe epelaki kati na bango mpe etumbaki ndambo ya bato kati na molako.


Yawe alobaki na Moyize : — Kino tango nini bato oyo bakotiola Ngai ? Kino tango nini bakoboya penza kondimela Ngai, ezala mpo na bikamwa nyonso oyo nasali kati na bango ?


Kasi Yesu apusanaki pene na bango, asimbaki bango mpe alobaki : — Botelema, bobanga te !


Yesu alobaki na bango : — Ekeke ya bato bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.


Boyimaka-yimaka te ndenge bamosusu kati na bango bayimaki-yimaki, mpe anjelu mobebisi abomaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ