25 Lokola bato ya Amaleki mpe ya Kanana bazali nanu kovanda na lubwaku, bino bokobaluka mpe bokozonga lobi na tongo na esobe, na nzela oyo ekenda na ebale monene ya Barozo.
Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi ; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. »