Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 14:18 - Mokanda na Bomoi

18 « Nazali Yawe oyo asilikaka noki te, atonda na bolingo, alimbisaka masumu mpe botomboki ; kasi apesaka moto oyo asali mabe etumbu, apesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 14:18
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Baboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa ; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te,


Balobaka : ‹ Nzambe apesaka etumbu ya moto mabe epai ya bana na ye. › Tika ete apesa etumbu yango epai na ye moko moto mabe, mpo ete ayeba yango !


Yawe ayokelaka bato mawa mpe asalelaka bango bolamu, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo ;


Nkolo, nakosanzola Yo kati na bato, nakoyembela Yo kati na bikolo.


Tika ete Yawe alandela masumu ya batata na ye mpe alimbisa te masumu ya mama na ye !


Yawe atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo.


Nzokande Ye, na mawa na Ye, azalaki kolimbisa mabe na bango na esika ya kobebisa bango ; mbala mingi, azalaki kokanga motema na esika ya kopelisela bango kanda na Ye ;


Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe na mawa mpe na ngolu, osilikaka noki te, otonda na bolingo mpe na boyengebene.


Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.


Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai : « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe,


Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ;


Solo batata na biso basalaki masumu, kasi bazali lisusu te, bongo biso tokomi komema mokumba ya etumbu na bango.


Asambelaki Yawe : — Oh Yawe ! Ezali te makambo ya boye nde nazalaki komilobela tango nazalaki epai na ngai ? Yango wana nasalaki na ngai mobembo na Tarsisi mpo na koluka kokima, pamba te nayebaki malamu ete ozali Nzambe ya ngolu mpe ya mawa, osilikaka noki te mpe otonda na bolingo, obongolaka makanisi na Yo ya kosala bato mabe.


Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.


Sik’oyo, nabondeli Yo, tika ete makasi ya Nkolo emonisama na nguya na yango kolanda ndenge olobaki :


Amonaka mbeba moko te epai ya Jakobi, amonaka minyoko te kati na Isalaele. Yawe, Nzambe na bango, azali elongo na bango ; koganga ya mokonzi ezalaka kati na bango.


mpo ete, ndenge lisumu elakisaki bokonzi na yango na nzela ya kufa, ngolu mpe elakisa bokonzi na yango na nzela ya bosembo mpo na komema na bomoi ya seko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.


Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.


Kasi azelaka te kopesa etumbu na moto oyo ayinaka Ye mpe abomaka ye mbala moko.


Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo ; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ