Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 13:8 - Mokanda na Bomoi

8 mpo na libota ya Efrayimi : Oze, mwana mobali ya Nuni ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 13:8
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Moyize atelemaki elongo na mosungi na ye Jozue mpe amataki na ngomba ya Nzambe.


Tango Jozue ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki koganga, alobaki na Moyize : — Ezali na makelele ya bitumba kati na molako !


Jozue, mwana mobali ya Nuni, oyo azalaki mosungi ya Moyize wuta bolenge na ye alobaki : — Moyize, nkolo na ngai, pekisa bango !


Oyo nde bakombo ya bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili ya Kanana. Moyize apesaki Oze, mwana mobali ya Nuni, kombo « Jozue. »


mpo na libota ya Isakari : Yigali, mwana mobali ya Jozefi ;


mpo na libota ya Benjame : Paliti, mwana mobali ya Rafu ;


Yawe alobaki na Moyize : « Tala sik’oyo, mokolo ya kufa na yo ekomi pene. Benga Jozue, mpe bokota na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakopesa ye mitindo na Ngai. » Boye Moyize mpe Jozue bakendeki mpe bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Yawe apesaki mitindo oyo epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokotisa bana ya Isalaele kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi, mpe Ngai moko nakozala elongo na yo. »


Moyize ayaki mpe alobaki maloba nyonso ya nzembo oyo, mpe bato nyonso bazalaki koyoka ye ; azalaki elongo na Oze, mwana mobali ya Nuni.


Jozue, mwana mobali ya Nuni, atondisamaki na Molimo ya bwanya, pamba te Moyize atielaki ye maboko. Bana ya Isalaele bayokelaki ye mpe batosaki mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.


Bazongiselaki Jozue : — Tokosala nyonso oyo okotinda biso mpe tokokende esika nyonso oyo okotinda biso.


Kolanda mitindo na Yawe, bapesaki ye engumba oyo asengaki ; ezali Timinati-Sera, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bongo Jozue atongaki engumba yango mpe akomaki kovanda kuna.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ