Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 13:32 - Mokanda na Bomoi

32 Bongo bakomaki kopanza sango mabe kati na bana ya Isalaele na tina na mboka oyo banongaki, bazalaki koloba : « Mokili oyo tonongaki ezali penza mabele oyo eliaka bavandi na yango ; bongo bato nyonso oyo tomonaki kuna bazali bingambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 13:32
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati ; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei.


Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati ; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei.


Batiolaki mboka kitoko mpo ete bandimelaki maloba na Ye te.


Nakosala ete bato na Ngai, bana ya Isalaele, batambola na mokili na bino ; bakozwa mabele na bino mpe bokozala libula na bango ; bokotikala lisusu te koboma bana na bango.


Nabimisaki bino na Ejipito mpe natambolisaki bino mibu tuku minei kati na esobe mpo na kopesa bino mokili ya bato ya Amori.


Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango, atako bazali milayi lokola banzete ya sedele mpe makasi lokola banzete ya sheni. Nabebisaki bambuma na yango na likolo, mpe misisa na yango na se.


Kasi bato oyo bavandaka kuna bazali makasi mingi, bingumba na bango etongama makasi mpe ezali minene ; tomonaki lisusu bakitani ya Anaki kuna.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te. [


Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ