Sima na bango komata na lubwaku ya Eshikoli mpe komona mokili yango, balembisaki mitema ya bana ya Isalaele oyo balingaki kokota na mokili oyo Yawe apesaki bango.
Oh Isalaele, yoka malamu ! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo.
Kasi Saulo alobaki na Davidi : — Okoki te kokende kobundisa moto wana ya Filisitia ! Ozali mwana moke, nzokande ye azali mobundi ya bitumba wuta bolenge na ye.