Boye, bana ya Isalaele balongwaki na esobe ya Sinai, basalaki mobembo mpe batambolaki bisika na bisika kino tango lipata eyaki kopema na esobe ya Parani.
« Tinda bato mpo na kononga mokili ya Kanana oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. Kati na libota moko na moko, pona mpe tinda moto moko kati na bakambi. »
Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.
Boye, ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso, tolongwaki na ngomba Orebi mpe tokendeki na etuka ya bangomba ya bato ya Amori. Tokatisaki esobe monene mpe ya somo oyo bomonaki mpe tokomaki na Kadeshi-Barinea.
Mpe tango Yawe alingaki ete bolongwa na Kadeshi-Barinea, apesaki bino mitindo : « Bokende ! Bokamata mokili oyo napesi bino. » Kasi botosaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bino ; botiaki elikya te kati na Ye mpe botosaki Ye te.
Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esanganaki mpo na kosala matanga na tina na ye ; bongo bakundaki ye na mboka na ye, Rama. Davidi akendeki na esobe ya Parani.