Mitango 13:29 - Mokanda na Bomoi29 Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi ; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.
Bingumba oyo bato ya Filisitia babotolaki epai ya bato ya Isalaele, kobanda na Ekroni kino na Gati, ezongaki na maboko ya bato ya Isalaele, mpe bato ya Isalaele bakangolaki bamboka nyonso ya zingazinga oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Filisitia. Mpe kimia ezalaki kati na bato ya Isalaele mpe bato ya Amori.