Yishibi-Benobi, mokitani ya Rafa, azalaki na mopanga ya sika, likonga oyo songe na yango ezalaki ya bronze mpe ezalaki ya bakilo koleka misato ; mpe abetaki tolo ete akoboma Davidi.
Tomonaki kuna lisusu bato milayi, bakitani ya Anaki, oyo babima na nzela ya bato milayi. Na miso na biso moko, tozalaki komimona lokola mabanki ; bango mpe bazalaki komona biso kaka ndenge wana na miso na bango. »
Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe kaka lokola bana ya Anaki. Kasi Yawe abomaki bango liboso ya bato ya Amoni. Bato ya Amoni babenganaki bato ya Zamizumi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango.
Bingumba wana nyonso ezalaki ya kotongama makasi mpe ezalaki na bamir ya milayi mpe na bikuke oyo bakangaka na bibende mpe ezalaki lisusu na bamboka ebele oyo ezanga bamir.
Pesa ngai mokili ya bangomba wana oyo Yawe alakaki ngai na mokolo wana. Mokolo wana, yo moko oyokaki ete bato ya Anaki bazalaki kovanda kuna mpe bingumba na bango ezalaki minene mpe batonga makasi. Kasi na lisungi na Yawe, nakobengana bango ndenge Yawe alobaki. »