Na tina ya Damasi : « Amati mpe Aripadi batondisami na soni, pamba te bayoki sango ya mabe. Mitema na bango ekomi likolo-likolo mpe bakomi komitungisa lokola ebale oyo etomboki.
Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi, bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila kati na mokili ya Amati ; mpe mokonzi ya Babiloni akatelaki ye etumbu.
Bokende na Kaline mpo na kotala makambo oyo elekaki kuna ! Bongo longwa kuna, bokende na Amati, engumba monene, mpe bokende lisusu na Gati kati na Filisitia ! Boni, bingumba oyo eleki penza bingumba ya mikili ya bokonzi oyo na malamu ? Mpe etando na yango eleki ya bino na monene ?
pamba te tango lisanga ya bato batombokaki mpo na mayi, na esobe ya Tsini, bino mpe botosaki mitindo na Ngai te mpe bopesaki lokumu te na bosantu na Ngai na miso na bango. Ezalaki nde mayi ya Meriba ya Kadeshi, na esobe ya Tsini.
pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele.
Eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, kolanda bituka na bango, ezalaki na ngambo ya sude, wuta na bandelo ya Edomi kino na esobe ya Tsini, na suka penza ya sude.
Moto moko te ayaki kobikisa mboka wana, pamba te ezalaki mosika na Sidoni mpe esalaki boyokani te elongo na ekolo mosusu. Engumba yango ezalaki na lubwaku oyo ezali pembeni ya Beti-Reobi. Bana ya libota ya Dani batongaki wana engumba na bango mpe bavandaki kuna.