Mitango 13:20 - Mokanda na Bomoi20 Botala soki mabele na yango ezali ndenge nini : ebotaka malamu to te ; ezali na banzete to te. Bosala nyonso penza ete bozonga na mbuma ya mokili yango. » Ezalaki eleko ya kobuka bambuma ya liboso ya vino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Babotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso.
Na tango ya kimia, akokota na makasi kati na bituka oyo etonda na bomengo mpe akokokisa makambo oyo ata moko te kati na batata to bakoko na ye batikala kosala : akobotola na makasi biloko mpe bomengo ya mokili, bongo akokabola yango epai na bato na ye ; akosala mabongisi ya kobundisa bingumba batonga makasi, kasi nyonso wana kaka ekowumela tango moke.