Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 13:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Tinda bato mpo na kononga mokili ya Kanana oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. Kati na libota moko na moko, pona mpe tinda moto moko kati na bakambi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 13:2
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize aponaki bato ya mayele kati na bana ya Isalaele mpe akomisaki bango bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.


Kati na libota moko na moko, ekozala na mobali moko mpo na kosunga bino : asengeli kozala mokambi ya etuka na ye.


Yawe alobaki na Moyize : — Kati na bakambi ya Isalaele, sangisela Ngai mibali tuku sambo, ba-oyo oyebi ete bazali bakambi mpe bakalaka kati na bato. Tika ete baya na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe batelema wana elongo na yo.


Oyo nde bakombo ya bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili ya Kanana. Moyize apesaki Oze, mwana mobali ya Nuni, kombo « Jozue. »


Na mitindo ya Yawe, Moyize atindaki bango wuta na esobe ya Parani. Bango nyonso bazalaki bakambi ya mabota ya bana ya Isalaele.


Oyo ezali penza makambo oyo batata na bino basalaki tango natindaki bango wuta na Kadeshi-Barinea mpo na kokende kononga mokili.


Bokozwa lisusu mokambi moko kati na libota moko na moko mpo na kokabola mokili.


Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino.


Mpe tango Yawe alingaki ete bolongwa na Kadeshi-Barinea, apesaki bino mitindo : « Bokende ! Bokamata mokili oyo napesi bino. » Kasi botosaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bino ; botiaki elikya te kati na Ye mpe botosaki Ye te.


Sik’oyo, bopona bato zomi na mibale kati na mabota ya Isalaele, moto moko mpo na libota moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ