Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe.
Yawe azalaki kosolola na Moyize ndenge moto asololaka na moninga na ye. Wana Moyize azalaki kozonga na molako ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, elenge oyo azalaki kosunga ye, azalaki kotikala kati na ndako ya kapo.
Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene.
Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.
mpo ete, soki nawumeli mpo na koya, oyeba ndenge nini bato basengeli kotambola kati na Ndako ya Nzambe, oyo ezali Lingomba ya Nzambe na bomoi, likonzi mpe moboko ya bosolo.
« Moyize, mowumbu na Ngai, asili kokufa. Sik’oyo, yo elongo na bato oyo nyonso, bobongama mpo na kokatisa ebale Yordani mpe kokota na mokili oyo nakopesa bana ya Isalaele.