Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 12:13 - Mokanda na Bomoi

13 Boye, Moyize abelelaki Yawe : — Oh Nzambe, nabondeli Yo, bikisa ye !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 12:13
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami abondelaki Nzambe, mpe Nzambe abikisaki Abimeleki, mwasi na ye, mpe basi bawumbu na ye. Na nzela wana, bazwaki lisusu bana ;


Mokonzi alobaki na moto na Nzambe : — Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpe sambela mpo na ngai ete loboko na ngai ebonga. Moto na Nzambe abondelaki Yawe, mpe loboko ya mokonzi ebongaki, ezongaki ndenge ezalaki liboso.


Yawe, nanetoli Yo, pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.


Yawe akosunga ye na mbeto na ye soki abeli mpe akobikisa ye na bokono na ye nyonso.


Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »


Yawe alobaki na ye : — Sik’oyo, zongisa loboko na yo na tolo na yo. Moyize azongisaki loboko na ye na tolo na ye. Mpe tango alongolaki yango, loboko yango ekomaki lisusu malamu lokola biteni mosusu ya nzoto na ye.


Pole ya sanza ekongenga lokola pole ya moyi, mpe pole ya moyi ekongenga makasi koleka mbala sambo lokola pole ya mikolo sambo, na mokolo oyo Yawe akotia kisi na pota ya bato na Ye mpe akobikisa yango.


Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika ; Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama, mpo ete nakumisaka nde Yo !


Bato bagangaki epai ya Moyize ; ye abondelaki Yawe, mpe moto ekufaki.


Kotika te ete Miriami azala lokola mwana oyo abotami ya kokufa, oyo abimi na libumu ya mama na ye na ndambo ya nzoto ya kopola !


Bato nyonso ya Isalaele bakomaki koyimayima mpo na Moyize mpe Aron, mpe lisanga mobimba ekomaki koloba : « Ah, elingaki kozala malamu soki tomikufelaki na biso na Ejipito to na esobe !


Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala . Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.


Bopambolaka bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.


Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi : — Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te ! Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.


Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.


pamba te libondeli oyo esalemi na kondima ekobikisa mobeli, mpe Nkolo akotelemisa ye. Soki asalaki masumu, Nzambe akolimbisa ye.


Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.


— Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai. Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ