Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 12:1 - Mokanda na Bomoi

1 Miriami mpe Aron bazalaki kotonga Moyize likolo ya mwasi na ye, pamba te abalaki mwasi ya mokili ya Kushi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 12:1
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango.


Nzokande, nkolo na ngai alapisaki ngai ndayi na maloba oyo : « Kati na bana basi ya Kanana epai wapi nazali kovanda, okozwela mwana na ngai mwasi awa te.


Rebeka akendeki koyebisa Izaki : « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. »


Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito.


Moyize avandaki pembeni ya libulu ya mayi. Nzokande, Nganga-Nzambe ya Madiani azalaki na bana basi sambo. Bayaki kotoka mayi mpe batondisaki bimelelo mpo ete bamelisa bibwele ya tata na bango.


Moyize andimaki kovanda elongo na Reweli ; bongo Reweli apesaki Sefora, mwana na ye ya mwasi, mpo ete azala mwasi ya Moyize.


mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.


Akoki kobala te mwasi oyo akufisa mobali, mwasi oyo babengani na libala to mwasi oyo abebisa lokumu na ye na kosala kindumba ; kasi akobala kaka, kati na bato na ye, mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.


moko te kati na bato oyo bamonaki nkembo na Ngai mpe bikamwa oyo nasalaki kati na Ejipito mpe na esobe kasi baboyaki kotosa Ngai mpe bamekaki Ngai mbala zomi,


Batombokelaki Moyize. Elongo na bango, ezalaki na bana ya Isalaele nkama mibale na tuku mitano oyo bayebanaki malamu lokola bakambi ya lisanga mpe bazalaki kosangana kati na mayangani ya bakambi ya lisanga.


bongo, kombo ya mwasi ya Amirami ezalaki « Yokebedi. » Yokebedi azalaki mokitani ya Levi, oyo abotamaki na Ejipito. Abotaki na Amirami Aron, Moyize mpe ndeko na bango ya mwasi Miriami.


banguna ya moto bakozala kaka bato ya libota na ye moko.


Kasi Yesu azongiselaki ye : — Nani mama na Ngai, mpe banani bandeko na Ngai ?


Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino : « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino ; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino.


Pamba te, ezala bandeko ya Yesu, bango mpe bazalaki kondima Ye te.


Boni, nakomi sik’oyo monguna na bino mpo ete nazali koloba na bino solo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ