Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 11:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mana ezalaki lokola mbuma ya koriande mpe ezalaki komonana pembe lokola mayi ya nzete oyo babengaka bedeliumi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 11:7
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wolo ya mokili yango ezalaki kitoko. Ezalaki lisusu na molona ya malasi mpe na mabanga ya onikisi kati na mokili yango.


Moyize alobaki na bango : — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa ; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. »


Bato ya Isalaele babengaki lipa yango mana. Ezalaki pembe lokola bambuma ya koriande mpe elengi lokola mikate balamba na mafuta ya nzoyi.


Bato bazalaki kopanzana bipai na bipai mpo na kolokota yango, mpe na sima, bazalaki konika yango na libanga to mpe kotuta yango na liboka, bongo nde bakokaki kolamba yango na banzungu to kosalela yango mikate. Mikate na yango ezalaki na elengi lokola bagato oyo basala na mafuta ya sika.


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ