6 Kasi sik’oyo, banzoto na biso ebebi penza, tozali lisusu te kolia biloko wana nyonso ! Tokomi kaka komona mana oyo ! »
Atunaki Aminoni : — Mpo na nini yo mwana mobali ya mokonzi ozalaka tango nyonso mawa-mawa boye ? Okoki koyebisa ngai te mpo na nini ozalaka bongo ? Aminoni alobaki na ye : — Nalingaka Tamari, ndeko mwasi ya Abisalomi, ndeko na ngai ya mobali.
Kasi wuta kaka tango totikaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, tozangela nyonso mpe tokoma kokufa na mopanga mpe na nzala makasi.
Batombokelaki Nzambe mpe Moyize, balobaki : « Mpo na nini boye ! Bobimisaki biso na Ejipito mpo ete toya kokufa na esobe ? Bilei ezali te, mayi ezali te mpe tolembi kolia bilei oyo ya pamba-pamba ! »