33 Kasi, wana misuni ezalaki nanu kati na minoko na bango mpe basilisaki nanu kotafuna yango te, kanda ya Yawe epelaki mpo na bango mpe apesaki bango etumbu ya makasi.
Moyize alobaki na Aron : « Kamata mbabola na yo mpe tia malasi ya ansa kati na yango elongo na moto ya etumbelo. Bongo, kima mbangu kati na lisanga mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, pamba te kanda makasi ebimi liboso ya Yawe, etumbu ezali koya. »