Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 11:31 - Mokanda na Bomoi

31 Boye, Yawe atindaki mopepe moko oyo ememaki bankanga wuta na ebale monene mpe ebwakaki yango na molako mpe na zingazinga na yango. Etando oyo bankanga ekweyaki ezalaki molayi ya mobembo ya mokolo moko na makolo, mpe ezipaki mabele na bosanda ya metele moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 11:31
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndenge kaka basengaki, atindelaki bango bakayi mpe atondisaki bango na bilei ya likolo.


Apesaki bango biloko oyo bazalaki kosenga, kasi atindelaki bango lisusu pasi.


Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili, atindaka mikalikali elongo na mvula, abimisaka mopepe wuta na bibombelo na yango.


Boye Moyize asembolaki lingenda na ye na mokili ya Ejipito mpe Yawe atindaki mopepe ya este mokolo mobimba mpe butu mobimba. Mpe tango tongo etanaki, mopepe yango eyaki na mabanki.


Bongo Yawe akomisaki mopepe ya este ekumbaki moko ya weste oyo ememaki mabanki mpe ebwakaki yango na ebale monene ya Barozo. Ata libanki moko te etikalaki na bisika nyonso ya Ejipito.


Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo, mpe ebale monene ezipi bango. Bazindi lokola mbodi kati na mayi makasi.


Kaka na pokwa wana, bakayi eyaki mpe etondisaki molako ; mpe na tongo, mamwe ezalaki zingazinga ya molako.


Bongo, Moyize mpe bakambi nyonso ya Isalaele bazongaki na molako.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ