Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 11:29 - Mokanda na Bomoi

29 Kasi Moyize azongisaki : — Boni, okosalela ngai zuwa na likambo nini ? Nakosepela kutu ete bato nyonso bakoma basakoli mpe Yawe akitisa Molimo na Ye epai na bango !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 11:29
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye bokoyeba solo ete Ngai, nazali kati na Isalaele, ete nazali Yawe, Nzambe na bino, mpe ete Nzambe mosusu azali te. Bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te.


Sima na makambo oyo, nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso. Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola, mibange na bino bakolota bandoto, bilenge na bino bakozwa bimoniseli.


Bongo, Moyize mpe bakambi nyonso ya Isalaele bazongaki na molako.


Alobaki na bango : — Bambuma ya kobuka etondi meke kati na elanga, kasi basali bazali moke. Boye bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye.


Polo azongisaki : — Ezala na tango molayi to na tango moke, nazali kosambela Nzambe ete, yo moko kaka te, kasi elongo na bato nyonso oyo bazali koyoka ngai lelo, bokoma lokola ngai, longola kaka minyololo oyo !


Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te,


Nalingi ete bino nyonso bolobaka nkota oyo eyebani te, kasi nalingi mingi koleka ete bino nyonso bosakolaka. Moto oyo azali kosakola azali na tina mingi, koleka moto oyo azali koloba nkota oyo eyebani te, longola kaka soki alimboli nkota yango mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.


yango wana tika ete moko te aluka lokumu kati na bato, pamba te nyonso ezali ya bino :


pamba te bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali te kotambolisama kolanda baposa ya nzoto ? Bozali kaka kosala lokola moto nyonso te ?


Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina ; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino.


Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi : « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso ? »


Bandeko na ngai, botika kofundana bino na bino, noki te Nzambe akosambisa bino. Botala, Mosambisi azali ya kotelema liboso ya ekuke.


Yango wana, bobwaka lolenge nyonso ya mabe, ya lokuta, ya mayele mabe, ya zuwa mpe ya kotonga bato.


Bongo Molimo na Yawe akokitela yo na nguya, okosakola elongo na bango, mpe okobongwana moto ya lolenge mosusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ