Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 11:22 - Mokanda na Bomoi

22 Ekokoka penza ata soki babomi bibwele nyonso oyo bazali na yango, ezala ngombe to bantaba ? Ekokoka penza ata soki balobi mbisi nyonso ya ebale monene ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 11:22
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi ya Isalaele azalaki kotiela motema alobaki na moto na Nzambe : — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema ? Elize azongisaki : — Okomona yango na miso na yo, kasi okolia yango te.


Ngai nakozwa misuni ya kolia wapi mpo na bato oyo nyonso oyo bazali kokoba kolelalela epai na ngai : « Pesa biso misuni ya kolia ! »


Moyize alobaki lisusu : — Bato nkoto nkama motoba bazali kotambola sima na ngai, mpe Yo ozali koloba : « Nakopesa bango misuni ya kolia mpo na sanza mobimba ! »


Yawe alobaki na Moyize : — Boni, loboko na Yawe ezali solo mokuse ? Okomona sik’oyo soki maloba oyo nalobi ekokokisama to ekokokisama te mpo na yo.


Bayekoli na Ye bazongisaki : — Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye ?


Kasi Yesu azongisaki : — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bayekoli balobaki na Ye : — Ondimi penza tokende kosomba mapa mpe toleisa bango, na mbongo ya bibende nkama mibale ?


Bayekoli na Ye bazongisaki : — Kati na esobe oyo, esika nini tokoki kozwa mapa mpo na koleisa bango mpe batonda ?


Zakari atunaki anjelu : — Ndenge nini nakoki koyeba ete ezali ya solo ? Pamba te, ngai, nazali mobange, mpe mibu ya mbotama ya mwasi na ngai esili kopusana makasi.


Mari atunaki anjelu : — Ekosalema ndenge nini, pamba te nayebi nanu nzoto ya mibali te ?


— Ezali awa na elenge mobali moko oyo azali na mapa mitano basala na bambuma ya orje, mpe bambisi mibale ; kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato oyo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ