19 Bokolia yango te kaka mokolo moko to mikolo mibale to mitano to zomi to mpe tuku mibale.
Baliaki mpe batondaki makasi ; Nzambe apesaki bango biloko oyo bazalaki na yango posa.
Loba na bato : « Bomibongisa mpe bomibulisa mpo na lobi, pamba te bokolia misuni. Yawe ayokaki tango bozalaki kolelalela : ‹ Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ? Biso oyo tozalaki na biso malamu na Ejipito ! › Sik’oyo Yawe akopesa bino misuni mpe bokolia yango.
Kasi bokolia yango sanza mobimba kino ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango nkele, pamba te bobwakaki Yawe oyo azali kati na bino, bolelaki-lelaki liboso na Ye mpe bolobaki : ‹ Mpo na nini tobimaki na Ejipito ? › »