Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 11:18 - Mokanda na Bomoi

18 Loba na bato : « Bomibongisa mpe bomibulisa mpo na lobi, pamba te bokolia misuni. Yawe ayokaki tango bozalaki kolelalela : ‹ Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ? Biso oyo tozalaki na biso malamu na Ejipito ! › Sik’oyo Yawe akopesa bino misuni mpe bokolia yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 11:18
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi alobaki na bato ya libota na ye mpe na bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo : « Bolongola banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino, bomipetola mpe bolata bilamba mosusu.


soki ameki elengi na yango mpe atiki yango te, soki abombi yango na se ya minu na ye,


Wana azali kotondisa libumu na ye, Nzambe akosopela ye kanda makasi na Ye, mpe ekonokela ye lokola bilei.


Solo, abetaki libanga, mayi ebimaki, mpe ebimaki penza ebele. Boni, akokoka lisusu kopesa biso mapa to misuni epai ya bato na Ye ? »


Moyize alobaki lisusu : — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani ? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.


Yawe alobaki na Moyize : — Kende epai ya bato, bulisa bango lelo mpe lobi, bongo yebisa bango ete basukola bilamba na bango ;


Moyize alobaki na bango : — Bomilengela mpo na mokolo ya misato, bosangisa nzoto te na basi na bino.


Ezala Banganga-Nzambe oyo basengeli kopusana pene na Ngai, basengeli komibulisa ; noki te Ngai Yawe, nakoboma bango.


Mokolo moko, bana ya Isalaele bakomaki kolelalela na tina na pasi na bango. Boye, kolelalela yango ekomaki kino na matoyi ya Yawe. Tango ayokaki yango, kanda na Ye emataki makasi mpe moto kowuta epai na Yawe epelaki kati na bango mpe etumbaki ndambo ya bato kati na molako.


Bokolia yango te kaka mokolo moko to mikolo mibale to mitano to zomi to mpe tuku mibale.


Kasi bakoko na biso baboyaki kotosa ye ; batombokelaki ye mpe bazwaki likanisi ya kozonga na Ejipito.


Telema, bulisa bato. Loba na bango : « Bomibulisa mpo na lobi, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi boye : ‹ Mabe ezali kati na yo Isalaele, okolonga kobundisa banguna na yo te kino tango okolongola yango. ›


Bato bakendeki na Beteli, bavandaki wana liboso ya Nzambe kino na pokwa. Batombolaki mingongo na bango mpe balelaki makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ