Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 11:13 - Mokanda na Bomoi

13 Ngai nakozwa misuni ya kolia wapi mpo na bato oyo nyonso oyo bazali kokoba kolelalela epai na ngai : « Pesa biso misuni ya kolia ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 11:13
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mosali na ye atunaki : — Nakokoka ndenge nini kokabola mapa oyo na bato nkama moko ? Elize alobaki lisusu : — Kabolela yango bato nyonso mpo ete balia, pamba te tala Liloba oyo Yawe alobi : « Bakolia, bakotonda mpe bakotika mosusu. »


Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi ya Isalaele azalaki kotiela motema alobaki na moto na Nzambe : — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema ? Elize azongisaki : — Okomona yango na miso na yo, kasi okolia yango te.


Kasi bokolia yango sanza mobimba kino ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango nkele, pamba te bobwakaki Yawe oyo azali kati na bino, bolelaki-lelaki liboso na Ye mpe bolobaki : ‹ Mpo na nini tobimaki na Ejipito ? › »


Moyize alobaki lisusu : — Bato nkoto nkama motoba bazali kotambola sima na ngai, mpe Yo ozali koloba : « Nakopesa bango misuni ya kolia mpo na sanza mobimba ! »


Ekokoka penza ata soki babomi bibwele nyonso oyo bazali na yango, ezala ngombe to bantaba ? Ekokoka penza ata soki balobi mbisi nyonso ya ebale monene ?


Bayekoli na Ye bazongisaki : — Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye ?


Bayekoli na Ye bazongisaki : — Kati na esobe oyo, esika nini tokoki kozwa mapa mpo na koleisa bango mpe batonda ?


Yesu alobaki na ye : — Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ