11 Moyize alobaki na Yawe : — Mpo na nini komonisa mosali na Yo pasi ya boye ? Mabe nini ngai nasali penza mpo ete osundolela ngai mokumba ya bato oyo ?
Mpo na nini pasi na ngai esilaka te mpe pota na ngai ya monene esilaka te ? Solo, namoni ete ozali mpo na ngai lokola etima ya lokuta, lokola mayi oyo bakoki kotiela motema te.
Bozali lisusu koloba : ‹ Kosalela Nzambe ezali na tina te. Litomba nini penza ezali na kotosa mibeko na Ye mpe na komiboya liboso ya Yawe, Mokonzi ya mampinga ?
Moyize ayokaki ndenge libota moko na moko ezalaki kolelalela na ekotelo ya ndako na bango ya kapo. Yawe asilikaki makasi ; mpe Moyize ayokaki pasi mingi na motema.