Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 11:10 - Mokanda na Bomoi

10 Moyize ayokaki ndenge libota moko na moko ezalaki kolelalela na ekotelo ya ndako na bango ya kapo. Yawe asilikaki makasi ; mpe Moyize ayokaki pasi mingi na motema.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 11:10
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bayimaki-yimaki kati na bandako na bango ya kapo, batosaki mongongo ya Yawe te.


Yawe, ndenge nini nayina te banguna na Yo, ndenge nini nayoka batelemeli na Yo nkele te ?


Tango Yawe ayokaki bongo, asilikaki makasi ; moto na Ye epelelaki Jakobi, mpe kanda makasi na Ye ekitelaki Isalaele,


Nzambe ayokaki mpe asilikaki makasi, abwakaki Isalaele mobimba ;


Yango wana, Yawe atombokeli bato na Ye, asemboli loboko na Ye mpe abeti bango ; bangomba eningani, bibembe na bango etondi lokola bafulu na balabala. Kasi ata bongo, kanda na Ye ekiti kaka te, loboko na Ye etikali kaka ya kosembolama.


Likolo ya mabe na yo, okobungisa libula oyo napesaki yo, nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yo kati na mokili oyo oyebi te ; pamba te opelisi kanda na Ngai, mpe ekopela mpo na libela. »


Mokolo moko, bana ya Isalaele bakomaki kolelalela na tina na pasi na bango. Boye, kolelalela yango ekomaki kino na matoyi ya Yawe. Tango ayokaki yango, kanda na Ye emataki makasi mpe moto kowuta epai na Yawe epelaki kati na bango mpe etumbaki ndambo ya bato kati na molako.


Moyize alobaki na Yawe : — Mpo na nini komonisa mosali na Yo pasi ya boye ? Mabe nini ngai nasali penza mpo ete osundolela ngai mokumba ya bato oyo ?


Na butu, tango mamwe ezalaki kokita, mana mpe ezalaki kokweya nzela moko na yango.


Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili.


Bongo Yawe apeliselaki bango kanda na Ye mpe atikaki bango.


Boye bakendeki mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami. Datani mpe Abirami elongo na basi, bana mpe bakoko na bango babimaki libanda mpe bakendeki kotelema liboso ya bikotelo ya bandako na bango ya kapo.


Batombokelaki Nzambe mpe Moyize, balobaki : « Mpo na nini boye ! Bobimisaki biso na Ejipito mpo ete toya kokufa na esobe ? Bilei ezali te, mayi ezali te mpe tolembi kolia bilei oyo ya pamba-pamba ! »


Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.


Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.


Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, ekotumba mabele, bambuma na yango mpe miboko ya bangomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ