4 Soki kelelo moko kaka nde ebeti, kaka bakambi, bakonzi ya bituka ya Isalaele nde bakosangana liboso na yo.
Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.
Bongo bakambi ya Isalaele, bakonzi ya mabota, elingi koloba bakonzi ya bikolo oyo bakambaki mosala ya kotanga motango ya bato,
Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino.