35 Tango nyonso Sanduku ezalaki kokende, Moyize azalaki koloba : « Oh Yawe, telema ! Tika ete banguna na Yo bapalangana ! Tika ete banguna na Yo bakima liboso na Yo ! »
Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka ! Lata makasi ! Lamuka, lokola na mikolo ya kala, na bileko oyo eleka kala ! Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi, oyo obomaki dalagona ?
tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai, mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa, nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai, mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te.
Tango basoda ya Isalaele bazongaki na molako, bampaka ya Isalaele batunaki : — Mpo na nini Yawe asali ete bato ya Filisitia balonga biso na mokolo ya lelo ? Tokende kozwa Sanduku ya Boyokani ya Yawe, na Silo, mpo ete eya kati na biso mpe ekangola biso na maboko ya banguna na biso.