31 Kasi Moyize alobaki : — Nabondeli yo : kotika biso te, pamba te yo nde oyebi bisika oyo tosengeli kotonga molako kati na esobe ; okozala motambolisi na biso.
Nazalaki miso ya mokufi miso mpe makolo ya mokakatani ;
Olobaki : « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.
Soki otamboli na biso elongo, tokokabola elongo na yo eloko nyonso ya malamu oyo Yawe akopesa biso.
Bomemisana mikumba bino na bino ; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto.