Mitango 10:29 - Mokanda na Bomoi29 Moyize alobaki na Obabi, mwana mobali ya Reweli, moto ya Madiani, bokilo ya Moyize : — Tozali kokende na mokili oyo Yawe alobaki : « Nakopesa bino mokili yango. » Yaka kotambola elongo na biso. Tokosala ete obika bolamu oyo Yawe alakaki kosalela Isalaele. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.