Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 10:25 - Mokanda na Bomoi

25 Boye, mpo na kosukisa, mampinga ya libota ya Dani mpe elandaki na sima mpo na kotambola na se ya bendele na bango. Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, nde azalaki mokonzi na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 10:25
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te mpe bokokende te lokola bato bazali kokima, pamba te Yawe akotambola liboso na bino mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima.


Bongo, pole na yo ekongenga lokola moyi ya tongo, mpe nzoto na yo ekokoma kolongono na lombangu ; bosembo na yo ekotambola liboso na yo mpe nkembo na Yawe ekokengela yo na sima.


mpo na libota ya Dani : Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi ;


Abidani, mwana mobali ya Gideoni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Benjame.


Pagieli, mwana mobali ya Okirani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Aseri ;


Na mokolo ya zomi, Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, mokambi ya libota ya Dani,


Banganga-Nzambe sambo oyo basimbaki bakelelo sambo balekaki liboso, batambolaki liboso ya Sanduku ya Yawe, na kobeta bakelelo. Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, balekaki liboso na bango ; mpe basoda oyo batikalaka na sima bazalaki kolanda Sanduku ya Yawe, wana bakelelo ezalaki kobeta.


Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, bazalaki kotambola liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobeta bakelelo ; bongo basoda oyo batikalaka na sima, bazalaki kolanda Sanduku ya Boyokani. Na tango wana nyonso, bakelelo ezalaki kaka kobeta.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ