Davidi alobaki : « Moto moko te, longola kaka Balevi, akoki komema Sanduku ya Boyokani ya Nzambe, pamba te Yawe aponaki bango mpo na komema Sanduku na Ye mpe kosala mosala na Ye mpo na libela. »
Bango nde bazalaki bakitani ya Levi kolanda bituka na bango, mpe bakambi ya bituka na bango kolanda ndenge bakomamaki, moto na moto, na buku ya mabota. Bazwaki mokumba ya kosala misala kati na Tempelo ya Yawe, kobanda na oyo azalaki na mibu tuku mibale mpe koleka.
Bongo Ndako ya kapo ya Bokutani mpe molako ya Balevi ekozala na kati-kati ya milako. Bakokende na molongo ndenge batielaki milako na bango, moko na moko na esika na ye mpe na se ya bendele na ye.