Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 10:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Sala bakelelo mibale na palata oyo batuta. Okosalela yango mpo na kobengisa lisanga mpe mpo na kopesa mitindo ya kolongola molako.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 10:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

batongi ndako mpe bato oyo bakataka mabanga. Bazalaki kosomba mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe : mabaya mpe mabanga bakata. Bazalaki mpe kobimisa mbongo mpo na misala mosusu ya kobongisa Tempelo ya Yawe.


Balevi oyo nyonso bazalaki kobeta mindule : Azafi, Emani, Yedutuni elongo na bana na bango ya mibali mpe bandeko na bango ; bazalaki kotelema na ngambo ya este ya etumbelo, balata bilamba ya lino ya kitoko, mpe bazalaki kobeta manzanza, mandanda mpe banzenze. Bazalaki elongo na Banganga-Nzambe nkama moko na tuku mibale oyo bazalaki kobeta bakelelo.


Boyemba banzembo, bobeta bambunda mike, lindanda oyo ebimisaka lokito kitoko mpe nzenze !


Bosembo mpe alima ezali miboko ya Kiti ya Bokonzi na Yo, boyengebene mpe bolingo etambolaka liboso na Yo.


Okosala bikeko mibale ya basheribe oyo okotia na suka mibale ya mofinuku ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.


Okosala na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ekozala ekangana lokola eloko moko.


Botika komemela Ngai makabo oyo ezanga tina ! Nazali koyoka malasi na bino ya ansa nkele. Bafeti na bino ya ebandeli ya sanza, ya Saba mpe mayangani na bino : bafeti wana ya mabe, nazali kokoka yango lisusu te.


Bopanza sango na mokili ya Yuda, botatola na Yelusalemi mpe boloba : ‹ Bobeta kelelo na mokili ! › Boganga makasi mpe bobelela : ‹ Bosangana, bino nyonso ! Tokima na bingumba batonga makasi ! ›


Tia kelelo na monoko na yo ! Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe, mpo ete babebisi boyokani na Ngai mpe batombokeli Mobeko na Ngai.


Bopanza sango ya kokila bilei, bobengisa bato na mayangani ya bule, bobengisa bakambi mpe bavandi nyonso ya mokili ete baya na Ndako ya Nzambe na bino mpe bolela epai na Yawe.


Bobeta kelelo na Siona ! Bobelela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule ! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga, pamba te mokolo ya Yawe ezali koya ; solo, ekomi penza pene.


Mpo na kosangisa lisanga, beta bakelelo, kasi makasi te.


Nkolo azali se moko, kondima mpe ezali se moko, libatisi mpe ezali se moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ