Soki mpe lipata esali kaka mwa ndambo ya mikolo na likolo ya Mongombo, na mitindo na Yawe, bazalaki kowumela na molako na bango ; mpe bazalaki kokende soki kaka Yawe apesi mitindo.
Ezalaki kaka na mitindo na Yawe nde bazalaki kowumela na molako to kokende. Boye, bazalaki kosala mosala ya Yawe kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.