12 Boye, bana ya Isalaele balongwaki na esobe ya Sinai, basalaki mobembo mpe batambolaki bisika na bisika kino tango lipata eyaki kopema na esobe ya Parani.
Balongwaki na Madiani mpe bakendeki na Parani. Wuta na Parani, bazwaki bato mpe bakendeki elongo na bango na Ejipito epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Faraon apesaki Adadi ndako, eteni ya mabele mpe bilei.
Kati na esobe ya Sinai, Yawe asololaki na Moyize kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; ezalaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale, na mobu ya mibale, sima na bango kobima na mokili ya Ejipito. Alobaki na ye :
Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.
Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.
Boye, bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize. Na lolenge wana nde batiaki milako na bango na se ya babendele na bango mpe batambolaki bongo, moto na moto na libota na ye mpe na etuka na ye.
Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo, bana ya Isalaele mpe bazalaki kokende ; mpe esika nyonso oyo lipata ezalaki kotelema, esika wana nde bazalaki mpe kosala molako na bango.
Basepelaki Pasika kati na esobe ya Sinai, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya liboso. Bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize.
Tala maloba oyo Moyize ayebisaki bana nyonso ya Isalaele na ngambo ya este ya Yordani kati na esobe, kati na etando Araba oyo etalana na Sufi, kati ya Parani mpe Tofeli, kati ya Labani, Atseroti mpe Di-Zaabi.
Boye, ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso, tolongwaki na ngomba Orebi mpe tokendeki na etuka ya bangomba ya bato ya Amori. Tokatisaki esobe monene mpe ya somo oyo bomonaki mpe tokomaki na Kadeshi-Barinea.
Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori ; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene.
Alobaki : « Yawe awutaki na Sinai ; wuta na Seiri, abimelaki bango lokola moyi na tongo, angengaki epai na bango wuta na ngomba Parani, ayaki elongo na ebele ya bankoto ya ba-anjelu na Ye mpe asimbaki na loboko na Ye kongenga ya Mobeko.
Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esanganaki mpo na kosala matanga na tina na ye ; bongo bakundaki ye na mboka na ye, Rama. Davidi akendeki na esobe ya Parani.