Mitango 10:10 - Mokanda na Bomoi10 Mpe lisusu, na batango na bino ya kosepela, na bafeti na bino oyo ekatama mpe ya ebandeli ya sanza, bokobeta bakelelo mpo na kobonza mbeka na bino ya kotumba mpe ya boyokani. Yango ekozala ekaniseli mpo na bino na miso ya Nzambe na bino. Nazali Yawe, Nzambe na bino. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Banganga-Nzambe batelemaki na bisika na bango ya mosala, ndenge moko na Balevi mpe bibetelo mindule ya Yawe oyo mokonzi Davidi asalaki mpo na kosanzola na yango Yawe na maloba oyo : « Bolingo na Ye ewumelaka seko na seko. » Ezalaki Davidi moto apesaki bango mokumba ya kobeta bibetelo mindule mpo na kokumisa Yawe. Banganga-Nzambe bazalaki ya kotalana na Balevi mpe bazalaki kobeta bakelelo ; bongo bana nyonso ya Isalaele bazalaki ya kotelema.
Tango batongi ndako basilisaki kotonga miboko ya Tempelo ya Yawe, Banganga-Nzambe kati na bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango na maboko ; Balevi, bakitani ya Azafi, elongo na manzanza, batelemaki na bisika na bango mpo na kokumisa Yawe, kolanda mitindo ya Davidi, mokonzi ya Isalaele.