Atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo ya kolobela, ndenge ezalaki momesano. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi ; bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : « Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita ! »
atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo na ye ya kolobela, pembeni ya ekotelo ya Tempelo. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi. Bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo ; mpe bayembi elongo na bibetelo na bango ya mindule bazalaki kokamba nzembo mpo na kokumisa Nkolo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : — Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita !
Balevi oyo nyonso bazalaki kobeta mindule : Azafi, Emani, Yedutuni elongo na bana na bango ya mibali mpe bandeko na bango ; bazalaki kotelema na ngambo ya este ya etumbelo, balata bilamba ya lino ya kitoko, mpe bazalaki kobeta manzanza, mandanda mpe banzenze. Bazalaki elongo na Banganga-Nzambe nkama moko na tuku mibale oyo bazalaki kobeta bakelelo.
Banganga-Nzambe batelemaki na bisika na bango ya mosala, ndenge moko na Balevi mpe bibetelo mindule ya Yawe oyo mokonzi Davidi asalaki mpo na kosanzola na yango Yawe na maloba oyo : « Bolingo na Ye ewumelaka seko na seko. » Ezalaki Davidi moto apesaki bango mokumba ya kobeta bibetelo mindule mpo na kokumisa Yawe. Banganga-Nzambe bazalaki ya kotalana na Balevi mpe bazalaki kobeta bakelelo ; bongo bana nyonso ya Isalaele bazalaki ya kotelema.
Tango batongi ndako basilisaki kotonga miboko ya Tempelo ya Yawe, Banganga-Nzambe kati na bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango na maboko ; Balevi, bakitani ya Azafi, elongo na manzanza, batelemaki na bisika na bango mpo na kokumisa Yawe, kolanda mitindo ya Davidi, mokonzi ya Isalaele.