Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 1:53 - Mokanda na Bomoi

53 Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 1:53
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Balevi bazalaki kosala mosala na bango ya kokengela Ndako ya kapo ya Bokutani mpe Esika ya bule, mpe ya kosunga bandeko na bango ya mibali, bana ya Aron, na mosala ya Tempelo ya Yawe.


Nzokande epai na biso, Yawe nde azali Nzambe na biso, mpe tosundola Ye te ; bana mibali ya Aron nde bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ye, mpe Balevi basungaka bango.


Tongo mpe pokwa nyonso, tobonzelaka Yawe bambeka ya kotumba mpe ya malasi, totandaka mapa likolo ya mesa ya bule ; mpe pokwa nyonso, topelisaka minda ya etelemiselo ya minda, pamba te biso totosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na biso ; kasi bino, bosundolaki Ye.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na basakoli : « Nakoleisa bango bilei ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge, pamba te ezali na nzela ya basakoli ya Yelusalemi nde bato ya mokili mobimba bobosani Nzambe. »


basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »


Sima na yango, Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron : « Bopanza te suki ya mito na bino, bopasola te bilamba na bino lokola nde bozali na matanga, noki te bokokufa mpe bokobenda kanda ya Yawe likolo ya lisanga mobimba. Ezali bandeko na bino nyonso ya Isalaele nde bakolela bato oyo Yawe atumbi na moto.


Okopesa na bato ya libota ya Levi mokumba ya Mongombo ya Litatoli mpe ya bisalelo na yango nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezalaka kati na Mongombo. Bango bakozwa mokumba ya komemaka yango elongo na bisalelo na yango mpe bakovanda zingazinga na yango.


Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo nyonso, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.


Ekoki na bino te ete Nzambe ya Isalaele atia bino pembeni kati na lisanga ya Isalaele mpe abenda bino pembeni na Ye mpo na kosala mosala na Mongombo ya Yawe mpe kotelema liboso ya lisanga mpo na kosalela bango ?


Kasi tango lisanga mobimba esanganaki mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, babalukaki na ngambo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe mbala moko lipata ezipaki yango mpe nkembo na Yawe emonisamaki.


Bongo Ndako ya kapo ya Bokutani mpe molako ya Balevi ekozala na kati-kati ya milako. Bakokende na molongo ndenge batielaki milako na bango, moko na moko na esika na ye mpe na se ya bendele na ye.


Bato ya bituka ya Gerishoni batongaki molako na bango na sima ya Mongombo, na ngambo ya weste.


Bato ya bituka ya Keati batongaki molako na bango pembeni ya Mongombo, na ngambo ya sude.


Tsurieli, mwana mobali ya Abiyaili, nde azalaki mokambi ya bato ya bituka ya Merari. Batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya Mongombo.


Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron batongaki molako na bango na ngambo ya este ya Mongombo, epai wapi moyi ebimaka, etalana na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpo na bolamu ya bana ya Isalaele. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye.


Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. »


Na ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, Moyize alongolaki moto moko kati na bato tuku mitano mpe nyama moko kati na banyama tuku mitano, ndenge Yawe atindaki ye mpe apesaki yango epai ya Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe.


Kati na bato nyonso ya Isalaele, napesi Balevi lokola likabo epai ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali, mpo ete basala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na bolamu ya bana ya Isalaele mpe basala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, mpo ete likama moko te ekomela bana ya Isalaele tango bakopusana pene ya Esika ya bule. »


teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.


Kasi Nzambe abomaki bato ya Beti-Shemeshi mpo ete batalaki Sanduku ya Yawe : kati na bato nkoto tuku mitano, abomaki tuku sambo. Bato ya Beti-Shemeshi basalaki matanga mpo ete Yawe apesaki bango etumbu ya makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ