Tala bakonzi ya mabota ya Isalaele : Mpo na libota ya Ribeni : Eliezeri, mwana mobali ya Zikiri ; mpo na libota ya Simeoni : Shefatia, mwana mobali ya Maaka ;
Na ngambo ya sude, milongo ya mampinga ya Ribeni bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Ribeni ezali Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri.
Na ngambo ya este epai wapi moyi ebimaka, milongo ya mampinga ya Yuda bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Yuda ezali Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi.